Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni.
Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.
Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.