13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.
Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, bato oyo batonda na mabe, libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! Batiki Yawe, batioli Mosantu ya Isalaele mpe bapesi Ye mokongo.
Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›
Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »
bakozwa lifuti oyo ebongi na mabe na bango. Basepelaka kosala makambo ya soni na moyi makasi. Na lokuta na bango, basepelaka kosambwisa mpe kobebisa lokumu na bino tango basanganaka elongo na bino mpo na mayangani.