Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi ?
Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? ›
Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye ;
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [
Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;
Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.
Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki ! »
Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.