Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese.
Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;
Samison alobaki na bango : — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.