4 Kasi bavandaki kimia. Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.
Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna.
Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko : — Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?
Bongo atunaki bango : — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?