33 Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.
— Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.
Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.
Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu.
Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.
pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya.