Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:32 - Mokanda na Bomoi

32 Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:32
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?


Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.


Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.


Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.


Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ?


Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ