29 Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba :
bazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! »
Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?
« Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.