Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:27
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.


Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.


Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi.


Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?


Yesu amemaki, Ye moko, ekulusu na Ye ; abimaki na engumba mpe akendeki na esika oyo babengaka, na lokota ya Arami, « Gologota. »


bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba : — Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ