Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:26 - Mokanda na Bomoi

26 — Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:26
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nayinaka bango makasi ; nazwaka bango lokola banguna na ngai.


Obabi azongiselaki ye : — Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.


Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.


Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »


Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki :


Moto nyonso oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; kasi moto oyo aboyi kokangama na bomoi na ye, kati na mokili oyo, akobatela yango mpo na bomoi ya seko.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


kolanda ndenge ekomama : « Nalingaki Jakobi, kasi nayinaki Ezawu. »


Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ;


oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.


Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto


Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ