23 Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.
Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.
Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi.
Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Kasi bango babondelaki Ye makasi : — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango.
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
Kasi tango Bayuda bakomaki kotelemela Polo mpe kofinga ye, apupolaki bilamba na ye mpe alobaki : — Tika ete makila na bino etangama likolo ya mito na bino moko ! Ngai nazali lisusu na ngambo te. Kobanda lelo, nakokende na ngai epai ya bato ya bikolo ya bapaya.
Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.
Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Iyo, bayokaki ! Pamba te ekomama : « Mingongo na bango eyokanaki na mabele mobimba, maloba na bango ekomaki kino na suka ya mokili. »
Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.
Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.