Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »
Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.
Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?