Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:18 - Mokanda na Bomoi

18 Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko. Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:18
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.


Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »


Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »


Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ;


kasi boboyi na bino koya epai na Ngai mpo na kozwa bomoi.


atako ngai mpe nakoki na ngai kotia elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, asengeli koyeba ete ngai nakoki kutu kotia elikya yango koleka ye ;


Pamba te Demasi asundolaki ngai : alingaki mokili oyo mpe akendeki na Tesalonika ; Kresasi akendeki na Galatia, mpe Tito akendeki na Dalimatia.


bakoboya koyoka mateya ya solo mpe bakomipesa makasi na koyoka masapo.


Bosenzelaka ete moto moko te atambola na bomoi ya pite to atiola Nzambe lokola Ezawu oyo atekaki bokulutu na ye likolo ya biloko ya kolia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ