Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:15 - Mokanda na Bomoi

15 Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:15
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.


Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.


Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.


Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.


pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.


mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.


Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ