14 mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.
Moto oyo asalaka bolamu epai ya mobola adefisaka Yawe, bongo Yawe akozongisela ye bolamu.
mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.
Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ;
mpe bakobima longwa kati na yango : ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu.
Boye ngai, ndenge moko na bango, nazalaka na elikya na Nzambe ete bato nyonso bakosekwa, ezala bato ya sembo to bato mabe.