Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:11 - Mokanda na Bomoi

11 Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:11
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Obikisaka banyokolami, otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.


Mokonzi alobaki na Amani : — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te.


Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › Nzambe akobikisa bango,


Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.


Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.


Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Ezali malamu te kolia mafuta ya nzoyi ebele, mpe ezali malamu te koluka lokumu na yo moko.


Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.


Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama ; Yawe kaka nde akonetolama.


Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka ; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, apanzi bato oyo batonda na lolendo,


akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.


Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,


Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe Nkolo akotombola bino.


Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki.


Samuele alobaki : — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ