Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 14:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 14:1
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto mabe atalaka moto ya sembo na miso mabe mpe alukaka nzela ya koboma ye,


Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai : « Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te ? »


Kino tango nini bokosangela moto moko ? Kino tango nini bino nyonso bokosangana mpo na koluka koboma ye lokola mir oyo etengami, lokola lopango oyo esili kokweya ?


pamba te azalaka ndenge makanisi ya motema na ye ezali. Alobaka : « Lia mpe mela, » kasi motema na ye ezali elongo na yo te.


Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.


Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye.


Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa.


Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto.


Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? Yesu azongiselaki bango : — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.


Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.


Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.


Ezalaki na moto moko kati na Bafarizeo, oyo kombo na ye ezalaki « Nikodemi. » Azalaki moko kati na bakonzi ya Bayuda.


Kasi Mofarizeo Gamalieli, molakisi ya Mobeko mpe moto ya lokumu mingi na miso ya bato nyonso, atelemaki kati na Likita-Monene mpe atindaki ete babimisa bantoma mpo na mwa tango moke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ