Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 13:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boye alobaki na mobateli elanga yango : « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango ! Mpo na nini ekanga mabele pamba ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 13:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene.


Ba-anjelu nde bazwi mokano wana ; basantu nde bakati yango mpo ete bato ya bomoi bayeba ete Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali Nkolo ya mokili ya bato, apesaka bokonzi na yango na moto nyonso oyo Ye alingi mpe azali na makoki ya kotombola kati na yango moto ya suka kati na bato. ›


Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te.


Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato.


Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto.


Mobateli elanga azongiselaki ye : « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo ! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola ;


Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »


Tata na Ngai akataka etape nyonso oyo, kati na Ngai, ebotaka mbuma te ; mpe abongisaka bitape nyonso oyo ebotaka bambuma, mpo ete ebota lisusu bambuma ebele koleka.


Moto oyo akowumela te kati na Ngai akobwakama na libanda ya elanga, lokola bitape oyo bakati : ekokawuka, bakolokota yango, bakobwaka yango na moto mpe ekozika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ