Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te !
Bongo alobaki lisese oyo : — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino ; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.