Luka 13:35 - Mokanda na Bomoi35 Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino : Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.