31 Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo !
Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ;
Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.