Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 13:28 - Mokanda na Bomoi

28 Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe ; kasi bino, bokobwakama libanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 13:28
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.


Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.


bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.


Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.


Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »


Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi !


Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe !


Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.


Makambo oyo nyonso ezali kolakisa na polele ete Nzambe atalaka makambo na bosembo, mpe ete alingi kozwa bino lokola bato oyo babongi mpo na Bokonzi ya Nzambe, oyo bozali komonela pasi.


Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ