Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 13:25 - Mokanda na Bomoi

25 Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! » Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 13:25
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa.


Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.


Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.


Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.


Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo ! Nkolo ! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino ?


pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.


Boyebi malamu ete, na sima, tango alingaki kokitana na lipamboli kowuta na tata na ye, azangelaki yango, pamba te alongaki te kobongola mokano ya tata na ye atako asengaki lipamboli yango na kolela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ