23 Moto moko atunaki Ye : — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika ? Yesu alobaki na bango :
Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ?
Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.
Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.
Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.
Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi.
— Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.