20 Yesu atunaki lisusu : — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?
Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?
Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.