18 Bongo Yesu atunaki : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?
Naloba lisusu nini mpo na yo ? Nakokanisa yo na nani, Yelusalemi, mboka kitoko ? Nakokanisa yo na nani mpo ete nakoka kobondisa yo, Siona, mboka kitoko ? Pota na yo ezali monene lokola ebale monene ; nani akoki kobikisa yo ?
Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.
Yesu alobaki lisusu : — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele :
Yesu atunaki lisusu : — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?
Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.
Boye Yesu alobaki : — Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na banani ?