38 Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.
Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.
Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »
Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.