Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 12:37 - Mokanda na Bomoi

37 Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 12:37
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.


Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›


Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›


Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.


Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke.


Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo !


Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »


Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.


Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.


Tika ete moto oyo alingi kosalela Ngai alanda Ngai ! Epai Ngai nakozala, mosali na Ngai mpe akozala wana. Tata na Ngai akokumisa moto oyo asalelaka Ngai.


Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »


Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai ; mpe kokufa ezali litomba.


Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ;


Na bongo, bokoyambama malamu kati na Bokonzi ya seko ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.


Yango wana, balingami na ngai, wana bozali kozela yango, bosala makasi mpo ete Nzambe akuta bino peto, bozangi pamela mpe bozali kati na kimia oyo apesaka.


Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » Mpe Molimo alobaki : — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango.


Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.


Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.


pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi akozala Mobateli na bango, akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ