3 Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.
Kolakela mokonzi mabe te, ezala kati na motema na yo ; kolakela mozwi mabe te, ezala na mbeto na yo ya kolala, pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo mpe kopanza sango ya maloba na yo.
Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.