Yesu alobaki : — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
Yesu azongiselaki bango : — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !
Yesu atunaki bayekoli na Ye : — Wapi kondima na bino ? Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »