Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 12:21 - Mokanda na Bomoi

21 Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 12:21
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.


Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule.


Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.


Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;


Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo ?


Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !


Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ