Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 12:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bongo amilobelaki lisusu : « Nakosala boye : nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 12:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, na nzela ya nguya na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato wana, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya mokili oyo. Tika ete kufa ezala litomba na bango ! Tika ete, bango mpe bana na bango, balia na lokoso, mpe mabumu na bango etonda na bikolo oyo obombaka mpo na bango ; bongo babomba ndambo oyo ekotikala mpo na bakitani na bango !


Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?


Akomaki kokanisa mpe komituna : « Nasala nini ? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »


Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »


Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.


Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.


Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,


Nkolo abakisaki : — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo !


Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.


Boyoka sik’oyo, bino bato oyo bolobaka : « Lelo to lobi, tokokende na engumba songolo, tokovanda kuna mobu mobimba mpe tokosala mombongo oyo ekobotela biso mbongo ebele. »


Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ