Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 12:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye.


elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene ewumelaka kaka mwa tango moke.


Elikya nini moto mabe azali na yango tango Nzambe azwi bomoi na ye ?


Bato oyo bayebi Nzambe te mpe mitema na bango etondisami na kanda, babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo.


Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : « Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo ezikisaka ? Nani kati na biso akoki kowumela elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? »


Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !


Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?


Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe.


Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango.


Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene.


Sima na bango koyoka ye, bakumisaki Nzambe. Bongo balobaki na Polo : — Ndeko, ozali komona motango ya bankoto ya Bayuda oyo bakomi bandimi, mpe bango nyonso bazali na bolingo makasi mpo na Mobeko ya Moyize.


Liboso na nyonso, nateyaki bino mateya oyo ngai moko nazwaki : Klisto akufaki mpo na masumu na biso, kolanda Makomi ;


Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,


Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.


Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ