7 Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu : — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai.