51 kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.
mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.
Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.
Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo.