Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 11:48 - Mokanda na Bomoi

48 Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 11:48
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe.


Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, kasi monoko na ngai te ; bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo.


Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.


Bozali koloba : ‹ Mpo na nini mwana amema te ngambo ya bambeba ya tata na ye ? › Ezali mpo ete mwana asalaki makambo ya sembo mpe ya alima, abatelaki mpe asalelaki na bokebi bikateli na Ngai nyonso, akozala solo na bomoi.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.


Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.


Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma !


Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »


Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.


Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na pasi, bozwa ndakisa ya basakoli oyo basakolaki na Kombo ya Nkolo.


Jozue alobaki na bato : — Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe. Bazongisaki : — Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ