47 Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma !
Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.
Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
Bato ya mito makasi, ya mitema mabanga mpe bakufa matoyi ! Bozali ndenge moko kaka na bakoko na bino : botelemelaka tango nyonso Molimo Mosantu !
Ezali bango Bayuda nde babomaki Nkolo Yesu mpe basakoli ; ezali mpe kaka bango nde banyokolaki biso. Basepelisaka Nzambe te mpe bazali banguna ya bato nyonso ;