Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 11:45 - Mokanda na Bomoi

45 Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu : — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 11:45
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. Jozafati alobaki : — Tika ete mokonzi aloba bongo te !


Na tango nyonso oyo nalobaka, nagangaka makasi mpo na kosakola kaka mobulu mpe kobebisama. Mokolo na mokolo, Liloba na Yawe ememelaka ngai kofingama mpe pamela ya mabe.


Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.


mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye :


Yesu azongisaki : — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.


Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.


Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.


Boni, kati na bakonzi to kati na Bafarizeo, ezali ata na moko oyo andimi ye ?


Mokili ekoki koyina bino te ; kasi Ngai, ezali koyina Ngai mpo ete natatolaka ete misala na yango ezali mabe.


Bafarizeo mosusu oyo bazalaki elongo na ye bayokaki maloba yango mpe batunaki Yesu : — Boni, olingi koloba ete biso mpe tozali bakufi miso ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ