Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi.
Mokengeli ya Efrayimi azali elongo na Nzambe na ngai, azali mosakoli ; Nzokande bazali kotiela ye mitambo na banzela na ye nyonso mpe bazali kotelemela ye kino na Ndako ya Nzambe na ye.
Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo.
Nkona yango eleki bankona nyonso na moke ; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene ; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »
Bongo Polo alobaki na ye : — Nzambe akobeta yo, yo mir oyo bapakola langi ya pembe ! Ovandi wana mpo na kosambisa ngai ndenge Mobeko ezali kosenga, nzokande yo nde moto obuki Mobeko mpo ete opesi mitindo ete babeta ngai !