43 Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :
— Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;