Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 11:31 - Mokanda na Bomoi

31 Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 11:31
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu ya Salomo, ayaki na Yelusalemi mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ; ayaki elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema.


Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.


Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda.


Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.


mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »


Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye !


Moto oyo akatisa ngenga te kasi atosaka Mobeko akosambisa yo oyo obukaka Mobeko atako ozali na Makomi ya Mobeko mpe okatisa ngenga.


Mpo na kondima, Noa atosaki Nzambe mpe atongaki masuwa mpo na lobiko ya libota na ye, sima na ye koyoka makebisi ya Nzambe na tina na makambo oyo ezalaki nanu komonana te. Mpo na kondima, Noa amonisaki mabe ya mokili mpe akomaki mokitani ya bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ