Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ?
Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.
Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !
Yesu alobaki : — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.
Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.