27 Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato : — Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele !
Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ! Tika ete mama oyo abota yo azala na esengo !
Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
mpe agangaki na mongongo makasi : — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo !
pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. Yango wana, kobanda lelo, bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,
Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.
Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »