25 Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.
Kasi tika ete Yawe abengana bato ya kilikili elongo na bato ya misala mabe ! Tika ete kimia ezala na Isalaele !
Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.
Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »
Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.