Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.
Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.
kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.