16 Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.
Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki : — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ;
Batunaki Ye lisusu : — Elembo nini ya kokamwa okolakisa biso mpo ete tondima Yo ? Okosala penza nini ?
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye. Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele.
Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya,