Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 11:1
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,


Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.


kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.


Yesu alobaki na bango : — Tango bozali kosambela, boloba : Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya !


Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe.


Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : — Kolela te !


mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ?


Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?


Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.


Wana Yesu azalaki kati na mokili, na mongongo makasi mpe na mpinzoli, azalaki kosambela mpe kobondela Ye oyo akokaki kobikisa Ye na kufa, mpe Nzambe ayokelaki Ye mpo na botosi na Ye.


Kasi bino, balingami na ngai, botonga bomoi na bino na likolo ya kondima na bino, oyo eleki bule. Bobondelaka na nguya ya Molimo Mosantu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ