Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:7
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.


Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye ; soki te, kimia yango ekozongela bino.


Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.


Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye ; alobaki : — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.


Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei ; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.


Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.


Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.


Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.


Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota.


Mpe tina mosusu oyo okotanga bango te na molongo ya basi bakufisa mibali ezali ete bakokoma bagoyigoyi mpe bakokoma koyengayenga na bandako ya bato mosusu. Na bongo, bakokoma bagoyigoyi kaka te, kasi mpe bato na bilobaloba, bato na songisongi mpe bato oyo balobaka makambo oyo basengeli kutu koloba te.


Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ