5 Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo ! »
Nakotia masanzoli na bibebu ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. « Mpe nakobikisa bango. »
Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.
Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye ; soki te, kimia yango ekozongela bino.
Yesu alobaki na ye : — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.
Atindaki Liloba na Ye epai ya bana ya Isalaele mpo na kosakola Sango Malamu ya kimia, na nzela ya Yesu-Klisto oyo azali Nkolo ya bato nyonso.
Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene.
Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo !