Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Luka 10:41 - Mokanda na Bomoi

41 Nkolo azongiselaki ye : — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Luka 10:41
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki maloba eleki mingi, makambo ya pamba-pamba eyaka mpe ebele ; bongo litomba na yango ezali penza nini ?


kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.


Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye.


Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako ; ayaki na lombangu mpe alobaki : — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala ? Loba na ye ete asunga ngai !


Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?


Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,


Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.


Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte.


Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare.


Kuna, balambaki bilei mpo na Yesu ; mpe wana Marte azalaki kobongisa mesa, Lazare azalaki moko kati na bato oyo bavandaki na mesa elongo na Yesu.


Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ